Phrase Lyrics by PAPA WEMBA


Love!
Tous les jours kaka maloba ya love.
Kasi lelo yoka phrase ango hein

Soki yo te nde l’amour nanga ekoma
Ndeti phrase etonda
Ba faute ebele
Soki yo te nde l’amour nanga ekoma
Ndeti phrase etonda
Ba faute ebele

Ya solo tokomi mosika
Kasi nzela eza nanu molayi
Ngomba moko te ezali
Soki omati omoni l’avenir !

Elongi ekoki kobomba bolingo
Kasi ekobomba mawa te.
Libanga ata ezali kitoko,
Ekoki koleka diamant ya défaut na valeur te.
Po yo babotaki yo na liki,
Ozalaka na posa ya libele ya maman te.
Oui ! C’est vrai.

Bolingo na biso evandaka
Nango mboka moko te na bomengo
Mwana po ayeba abimi minu
Akomeka koswa libele ya maman
Jamais akoswa mosapi naye Rosa
Totika komiswa mitema
Bomenga bazela bazwa te oh
Ezalaka jamais na rendez-vous

Lokuta ya mbongo
Etindaka moto akanisa ete
Liwa ezali se po ya babola

Moto ya bolingo na kombo nayo
Ebandaka kati ya motema nanga
Kasi jamais ekozikisa un jour
Kombo nayo

Maria Rosa nayembi lisusu Bibi
Tokende libala
Malembe malembe maman

Nkasa soki ekweyi eh
Na nzete bapesaka
Faute se na mopepe
Nandimi mabe nanga

Tozingi maboko
Tokitisa mitema
Bomengo nyonso wana
Tozingi maboko
Tokitisa mitema
Bomengo nyonso wana

Mvula epanzaka se ba feti oh
Kasi wenze te Mukarame
Ata bafingi tokota ata wenza
Tovanda ata na ba intemperies

Mvula moke ekokolisela nga
Ya makasi keba Maria Rosa
Ekoboma ndunda nabiso

Bana baboteli biso ba koko
Bango nde talatala nabiso

Rosa tala bango okomona
Elongi ya bolingo na biso

Bana baboteli biso ba koko
Bango nde talatala nabiso

Julie Mukuna eh abota Julio na Sana

Bana baboteli biso ba koko
Bango nde talatala nabiso

Kani ya maman Embrako ndoyi ya maman Nyondo

Soki yo te nde l’amour nanga ekoma
Ndeti phrase etonda
Ba faute ebele (maman)
Soki yo te nde l’amour nanga ekoma
Ndeti phrase etonda
Ba faute ebele

 

Watch Video

About Phrase

Album : M'zee fula ngenge (Album)
Release Year : 1999
Added By : Theodor Bellash
Published : Dec 12 , 2017

More PAPA WEMBA Lyrics

PAPA WEMBA
PAPA WEMBA
PAPA WEMBA

Comments ( 0 )

No Comment yet



About AfrikaLyrics

Afrika Lyrics is the most diverse collection of African song lyrics and translations. Afrika Lyrics provides music lyrics from over 30 African countries and lyrics translations from over 10 African Languages into English and French

Follow Afrika Lyrics

© 2024, We Tell Africa Group Sarl