Maman Lyrics by PAPA WEMBA


Bilengi eye nasala na berceau ya maman
Eleki elengi koleka ba mbeto nyonso nga nalala
Maman soki ozalaki kaka na bomoyi
Mbele nasengi ozongisa nga lisusu wana

Jamais olingaki nga nalela yo oseka
Jamais olingaki yo olala nga nalamuka
Jamais olingaki ata ngungi atungisa nga
Soki nabeli ozalaki kotana tongosa

Banda okenda nakoma abandonné
Recompense nayo nakopesa nani ango ?
Ata naleli nani akodorloter nga ?
Yango nayembeli yo nzembo oyo
Maman Nyondo.

Elengi ya libele ya maman abota ngayi
Eleki ba recettes nyonso
Ya ba Cordon Bleu nga nalya
Ata mafuta tomati ezalaki te
Kasi yango elakaka mosuni na elengi
Banda okenda appétit esila nga
Nakoma kolya kaka po
Nasepelisa monoko

Mateya ya maman ezanga bulletin
Pe minerval
Kasi eleki ba léçon ba maitre
Ba professeur bapesa nga
Maman soki ozalaki kaka na bomoyi
Mbele nasengi batia yo
Ministre ya éducation
Mbele ba parquet ba prison
Nyonso bakanga
Mbele kutu mutu mabe
Azali te

Lelo nakanisi yo mingi maman
Po jour ya aniversaire nanga
Ekomi pene
Ba invité bakolya
Bakomela masanga
Yo kutu artisane nango ozali te
Epayi ozali
Soki okutani na occasion eh
Tindela nga carte de vœux ata fololo
Esengo nanga ekozala multiplié fois deux
Normalement feti ya lelo
Ezali yayo
Serment d’hypocrate
Ba médecin bakosalaka
Yanga serment
Yo ozala toujours maman nanga
Ata babandeli mokili
Soki mbala zomi
Yanga serment
Yo ozala toujours maman nanga.


Mais Lelo nakanisi yo mingi maman
Po jour ya aniversaire nanga
Ekomi pene
Ba invité bakolya
Bakomela masanga
Yo kutu artisane nango ozali te
Epayi ozali
Soki okutani na occasion eh
Tindela nga carte de vœux, ata fololo
Esengo nanga ekozala multiplié fois deux
Normalement feti ya lelo
Ezali yayo
Serment d’hypocrate
Ba médecin bakosalaka
Yanga serment
Yo ozala toujours maman nanga
Ata babandeli mokili
Soki mbala nkama eh
Yanga serment
Yo ozala toujours maman nanga.
Maman soki ozalaki kaka na bo moyi
Mbele nasengi ozongisa nga lisusu wana
Maman soki ozalaki kaka na bo moyi
Mbele nasengi ozongisa nga lisusu wana

Consolation nanga
Djo Nyondo photocopie nayo

 

Watch Video

About Maman

Album : Legend (Album)
Release Year : 2001
Added By : Theodor Bellash
Published : Dec 12 , 2017

More PAPA WEMBA Lyrics

PAPA WEMBA
PAPA WEMBA
PAPA WEMBA

Comments ( 0 )

No Comment yet



About AfrikaLyrics

Afrika Lyrics is the most diverse collection of African song lyrics and translations. Afrika Lyrics provides music lyrics from over 30 African countries and lyrics translations from over 10 African Languages into English and French

Follow Afrika Lyrics

© 2024, We Tell Africa Group Sarl