JB MPIANA  Recto verso cover image

Recto verso Lyrics

Recto verso Lyrics by JB MPIANA


Tongo etani
Boyebisa ye
Nakowa pona ye

Le grand Saoudien

Na sauce bakotiaka feuille de laurier
Basusu bakobakisaka cube Maggi
Kasi na bolingo batiaka nini?
Po na convaincre motema ya Adam Bombole
Na mériter pardon nazala libéré

Ekomeli ngai soni mingi eh
Kotanga kombo ya moto alingi ngai te
Raison nini na inventer
Na mériter pardon nazala acquitté

Bolingo elekaki ndelo yango e provoquer innondation
Soki tosalaki ngele, mbele tokomaki na situation oyo te
Bolingo ezalaki na recto ekomi na verso naye zoba iih
Naye zoba maman, Humm... naye zoba

Oye kotonga immeuble ya ba souçis o kati ya motema na nga
Et pourtant na horloge ya motema tozalaki nanu na minuit y'oboyi nga
Na culture africaine, koboya mutu na butu ezali mabe Adam Bombole
Tala nakomi lokola moto ayaki kosala intérim na motema na yo
Wapi thermomètre ya bolingo po y'otanga degré na nga?
Nakomi lokola moto ayaki kosala pique-nique na kita ya motema na yo
Na déontologie ya ba amoureux égoisme ezali permis
Po nzoto ezangi pièce de rechange
Moyen ya kosala révision ya motema ya moto ikele ve

Bolingo ya porcelaine y'opesi ngai ezali bolingo ya risque ngo
Une fois par terre Adam Bombole, nde epasuki
Bolingo ya talatala, y'okabeli nga ezali bolingo ya risque
Une fois par terre, le grand Saoudien, nde epasuki
Nazala ata petit poucet na retrouver nzela y'okeyi
Avant que tongo etana, ekoma trop tard, Adam Bombole

Tshouba, bakulaka bakulutu boyok'oyo ya ngai
Oyo ezali champagne. Soki ezangi na feti, mawa trop!

Eh nakosenga se na ba écrivains
Basala photo-romans ya bolingo ya Adam Bombole
Bato ya mokili batanga na esengo
Baye bakoya na sima, etikala se l'histoire na bolingo

Adam Bombole azali lokola Moise abikisaka bana Israel
Abeta... na kati ya mayi mayi makabuani

Eh nakosenga se na ba écrivains
Basala photo-romans ya bolingo ya Adam Bombole
Bato ya mokili batanga na esengo
Baye bakoya na sima, etikala se lísitwále na bolingo

Watch Video

About Recto verso

Album : Feux de l'amour (Album)
Release Year : 2015
Added By : Afrikalyrics
Published : Dec 21 , 2017

More JB MPIANA Lyrics

JB MPIANA
JB MPIANA
JB MPIANA

Comments ( 0 )

No Comment yet



About AfrikaLyrics

Afrika Lyrics is the most diverse collection of African song lyrics and translations. Afrika Lyrics provides music lyrics from over 30 African countries and lyrics translations from over 10 African Languages into English and French

Follow Afrika Lyrics

© 2024, We Tell Africa Group Sarl