PAPA WEMBA Six Millions Ya Ba Soucis cover image

Paroles de Six Millions Ya Ba Soucis

Paroles de Six Millions Ya Ba Soucis Par PAPA WEMBA


Matoyi ma nga
Opesi yango embargo
Ya ba « je t'aime » na yo !
Loposo na nga
Ondimi ekelela ba caresses na yo !

Motema ekoki te
Epesi misa ya mawa
Pinzoli etangi
Soki ozongi te na sambwe.
(Rumba olingaka yango oyo tein
na moto nayo ya palais oyo yak ki shinga-mpemba…)

Na kati ya chambre nga moko
Contre six millions ya ba soucis ngoya oh !
Etumba oyo monene boye vraiment
Est-ce que nakoki ko zongisa ata mwa tsuki
Comme c’est pas possible papa
Sort na nga oyebi bien mais pourquoi ozo trainer ?
Yaka o sauver nga ah

ah !
Na bengi yo na telephone
Mille et une fois oboyi nayo korappeler
Les 125 messages non lus
O supprimer oboyi ko tanga
ata moko ya pamba
Ba "je t'aime" na ngayi na motema na yo
O effacer lokola elembo ya masuwa na mayi
Pourquoi ah ?

Kwiti ya bolingo na yo ekosi nga
Na plonger na piscine ezanga mayi
Na mbeto ya lopitalo nga losambo eh
Epayi ya nzambe na mona yo ya suka
Soki oboyi na yo koya eh
Somba deja courronne de fleurs ya kufa na nga
Yele oh oh !
Na senga yo bolingo ya mwana soso
Po ata akoli toujours pene na lopango
Opima nga opesi ya mwana ndeke
Tala akoli ye wana apumbwe oh
Zala nini na luki te
Pona mona ata lisala moka ya bolingo na yo oh ! ah

Na senga yo bolingo mon amour
Yo o preferer o pesanga ba regret
Motema ya mwana moto ekoma poubelle
Role na nga se koyamba biloko ya bosoto
Nini nga nasali yo eh
Po nameriter lifuta ya motindo oyo ?
Cherie eh Nlando Batibuka

Secret ya sante ya moninga
yo nde obomba
pourquoi o komi invisible ?
Soki ozo dessiner nga monene te oh
Nakonda mikawu
Prisonnière ya soucis
Ne esika ya ba mpasi ya bolingo
vaut mieux lisasi oh
Oyo ozo salanga
ata Ndata Nsangu akondima divorce oh
oh oh
Na battre record ya milelo na bolingo epesinga souci d’or
Soki oye je t’assure na kozwa kimia
hey !

Nathalie Makoma
oyo likambo ya somo
likambo ya mpasi
likambo yakokamwa
basengi biso kopo ya mayi
topesi bango bidon
est-ce que tosali mabe ?
Allé ! fais nous plaisir
Eh !
Penalty ya kufa na nga
ondimi o beta yango
Na makanisi o marquer te o tirer à coté
Tala nga na poto pinzoli etondi pelouse
Souci ekomisa nga paralysée mon amour
Pardon ko marquer te eh
ah !
Namemi ekulusu eh nayebi tina te
Bolingo ekomi mabe loba nayeba oh
Soki eza contraire envoutement oyo ewuti wapi
Tokende epayi ya ba pasteur
ba delivrer yo
Baby eh

Misu ezanga bongo mais esalaka effort
yako futa nyongo ya pongi oh
Mais pourquoi yayo motema eza na makoki ya kolinga nga
ezo pima nga bolingo ?
Na sambwe, oh !

Secret ya sante ya moninga
yo nde obomba
Pourquoi o komi invisible (invisible)
Soki ozo dessiner nga monene te oh
Nakonda mikawu (nakonda mikawu)
Prisonnière ya soucis
Ne esika ya ba mpasi ya bolingo vaut mieux lisasi oh (lisasi oh lisasi oh)
Oyo ozo salanga
ata Ndata Nsangu akondima divorce oh oh oh
Na battre record ya milelo na bolingo epesinga souci d’or (ehhhhh)
Soki oye je t’assure na kozwa kimia
hey !

Matoyi ma nga
Opesi yango embargo
Ya ba « je t'aime » na yo !
(Nous sommes dans un monde)
Loposo na nga (où tout le monde)
Ondimi ekelela ba caresses na yo ! (observe tout le monde)
Motema ekoki te(même les observateurs)
Epesi misa ya mawa(sont aussi observés)
Pinzoli etangi(ah oui)
Soki ozongi te na sambwe.

 

Ecouter

A Propos de "Six Millions Ya Ba Soucis"

Album : Notre Père (Album)
Année de Sortie : 2010
Ajouté par : Theodor Bellash
Published : Dec 12 , 2017

Plus de Lyrics de PAPA WEMBA

PAPA WEMBA
PAPA WEMBA
PAPA WEMBA
PAPA WEMBA

Commentaires ( 0 )

Aucun commentaire pour l'instant



A propos de AfrikaLyrics

Afrika Lyrics est la plus large collection de paroles de chansons et de traductions d’Afrique. Afrika Lyrics fournit les paroles des musiques de plus de 30 pays africains et des traductions de lyrics de plus de 10 langues africaines en français et en anglais.

Suivre Afrika Lyrics

© 2024, We Tell Africa Group Sarl