Na Bengi Yo Mosungi Lyrics by FABRICE MULAJA


Na bengi yo Mosungi
Lisungi oyo bato ya pasi ba belelaka butu pe moyi
Kumisama ee Mokonzi nanga
Na bengi yo Mobikisi
Ondima ko kufa na esika baye nyoso baza ko kufa
Kumisama ee Mokonzi nanga
Na bengi Nzambe na mawa
Po ata soki mokili ebwaki nga oyambaka nga na motema bolingo
Kumisama ee Mokonzi nanga
Nzambe Mokamwisi
Po ata na mikuwa ekawuka Nzambe opesa bomoyi
Kumisama ee Mokonzi nanga

Yo elikya na ngai
Yo makasi na nga Yaweh ee eh
Kumisama ee Mokonzi nanga Eeeh eeh
Eloko moko te ekoki
Ko tiamel’o na bo Nzambe nayo
Y’obongi Y’obongi
Tika ete kembo na yo etonda mokili mobimba
Kumisama ee Mokonzi nanga
Eloko moko te ekoki
Ko tiamel’o na bo Nzambe nayo
Y’obongi Y’obongi
Tika ete kembo na yo etonda mokili mobimba
Kumisama ee Mokonzi nanga

Na bengi yo mo sekwisi
Oza na makoki ya ko bongola bileyi ya matanga
Ekoma bileyi ya feti
Kumisama ee Mokonzi nanga
Oh Jéhovah Sabaoth
Elombe ya bitumba na gai
Osilisanga somo ya banguna
Kumisama ee Mokonzi nanga
Mopanga na moto
Na bengi yo likonzi
Likonzi oyo esimba kondima nanga
Ata ko mipepe ba mbonge
Na yebi na kweya te
Na yembi yo na nzembo na nga
Attitude ya motema na ngai ee ee
Po eloko moko te Yesu ee

Eloko moko te ekoki
Ko tiamel’o na bo Nzambe nayo
Y’obongi Y’obongi
Tika ete kembo na yo etonda mokili mobimba
Kumisama ee Mokonzi nanga Oh Papa aah
Eloko moko te ekoki
Ko tiamel’o na bo Nzambe nayo
Y’obongi Y’obongi
Tika ete kembo na yo etonda mokili mobimba
Kumisama ee Mokonzi nanga

Yaweh, Yaweh, Yaweh
Yo nde Nzambe na bomoyi
Obongi na kembo eeh
Nguya pe lokumu ebongi nayo Nkolo
Mo bongoli ya makambo Nzambe na nga y’obongwani te
Obongi na kembo eeh
Nguya pe lokumu ebongi nayo Nkolo
Zwa kiti na yo ya bokonzi vanda banda ko konza
Obongi na kembo eeh
Nguya pe lokumu ebongi nayo Nkolo
Nani ako tia tembe ee na bokonzi nayo molongi liwa
Obongi na kembo eeh
Nguya pe lokumu ebongi na yo Nkolo

Alléluia ee Kumama nayo
Alléluia ee Tombuama nayo ooh
Kumama Kumama Kumama Kumama
Kumama  Kumama Kumama kumama
Kumama Kumama Kumama kumama
Kumama Kumama Kumama kumama
Kumama Kumama Kumama kumama
Kumama Kumama Kumama kumama
Kumama Kumama Kumama kumama
Kumama Kumama Kumama kumama
Kumama Kumama Kumama kumama

Eliya liboso ya ba prophète ya baala abelelaki yo oyanolaki ye
Biso pe tobeleli yo lelo oyo Nzambe ya moto kumama
Eliya liboso ya ba prophète ya baala abelelaki yo oyanolaki ye
Biso pe tobeleli yo lelo oyo Nzambe ya moto kumama
Kadji alléluia ee Alléluia ee
Alléluia  Alléluia ee iye
Muangana wani ee
Muangana wani eyo
Alléluia ee iye
Wa kuenda nenda ee
Muka lenga wani mema
Alléluia ee iye
Nzambu wa banjila ee

Lukeni’amula wa loji
Alléluia ee iye
Muangana wani ee
Wa kushila bana Mulopo
Alléluia ee iye
Wa kuenda nenda ee
Indu akuji wani
Alléluia ee iye
Nzambu wa banjila ee
Miriam abetelaki yo mbonda
Ngai na beteli yo nzenze
Yoka

Watch Video

About Na Bengi Yo Mosungi

Album : Na Bengi Yo Mosungi (Single)
Release Year : 2020
Added By : J.Mabongo.7
Published : Sep 02 , 2020

More FABRICE MULAJA Lyrics

FABRICE MULAJA

Comments ( 0 )

No Comment yet



About AfrikaLyrics

Afrika Lyrics is the most diverse collection of African song lyrics and translations. Afrika Lyrics provides music lyrics from over 30 African countries and lyrics translations from over 10 African Languages into English and French

Follow Afrika Lyrics

© 2024, We Tell Africa Group Sarl