FISTON MBUYI Nazua Wapi cover image

Nazua Wapi Lyrics

Nazua Wapi Lyrics by FISTON MBUYI


Awa na se mokonzi
Akoki te kozua esika ya mosali
Mpo ye nde moto ya yambo oyo
Akoma mibeko po batosa
Kasi oyo ya yo esaleli
Ezangisi nga maloba Yesu
Mokonzi ami bosana
Se na tango ya bokaboli mapa
Mobatisi ami kitisa aa
Po Yohane abatisa ye
Na mayi na ye moko
Le Tout-puissant oyo adima aa
Sete e suspendre ye ee
Na nzete ya soni
Alors que azanga na ye lisumu uu
Andimi kolata soni oyo
Po akufela nga na yo yaya aa

Nazua wapi bolingo ya boye ngai
Nazua wapi motema ya boye ngai
Ngai ee ee eee
Nazua wapi mobali ya boye ngai
Ngai ee ee eee
Nase na moyi oyo oo

Awa moto ya nguya alingi te bamonela ye
Oyo ya mbongo aboyi na ye ko vanda na babola
Oyo ayebi alingi se bayokela ye ee
Oyo angengi alingi se bamona ye ee
Bamona ye ee bamona ye ee
Kasi yo osalaka ndenge nini
Po oyo ya yo esaleli
Efungoli nga monoko Yesu
Mokonzi azo limbisa aa
Na baye basengeli ye liwa y’ekulusu
Mobatisi amikitisa aa
Po Yohane abatisa ye ee
Na mayi na ye moko
Le Tout-puissant oyo adima aa
Sete e suspendre ye
Na nzete ya soni
Alors que azanga na ye lisumu uu
Andimi kolata soni oyo
Po akufela nga na yo yaya aa

Mais Nazua wapi bolingo ya boye ngai
Nazua wapi motema ya boye ngai
Ngai ee ee eee
Nazua wapi mobali ya boye ngai
Ngai ee ee eee

Babiso oyo tondima tolanda se yo
Po mokili esala te oyo y’ozo sala
Po y’ozali nzela ya bomoyi

Yaweh eee ee ee eeeee
YAweh yaweh Yaweh
Ozali
Nyoso oyo moto aza te
Yaweh osali pe ya mingi oo
Ozali
Nyoso oyo moto aza te
Mokonzi olekeli mayele nanga awa
Ozali
Nyoso oyo moto aza te

Pendant que bango bamoni ngai oyo moweyi
Y’olobi naza ya kolala ya Yesu
Oszli pe ya mingi eei
Ozali
Nyoso oyo moto aza te

Kasi nazua wapi bolingo ya boye ngai ee
Ngai ee ee eee
Nazua wapi motema ya boye ngai
Ngai ee ee eee
Nazua wapi mobali ya boye ngai
Ngai ee ee eee
Nase na moyi oyo yo yo

Hee hee
Ya Yesu elekeli ngai eee
Ya baboti na nga ezala boye te
Tu es tous Jésus eee
Nyoso oyo moto aza te

Watch Video

About Nazua Wapi

Album : Amour Unique (Album)
Release Year : 2019
Added By : J.Mabongo.7
Published : Oct 24 , 2019

More FISTON MBUYI Lyrics

FISTON MBUYI
FISTON MBUYI
FISTON MBUYI
FISTON MBUYI

Comments ( 0 )

No Comment yet



About AfrikaLyrics

Afrika Lyrics is the most diverse collection of African song lyrics and translations. Afrika Lyrics provides music lyrics from over 30 African countries and lyrics translations from over 10 African Languages into English and French

Follow Afrika Lyrics

© 2024, We Tell Africa Group Sarl