Claudia Lyrics by JB MPIANA


Claudia maman
Losambo nanga epayi ya nzambe ekomi te
Nasengaki yo nzambe apesa nga yo satana akangi mabondeli nanga
Naleli !
Ndenge Yesu abelelaki nzambe pene ya liwa
Eli, Eli, Lamasabaktani oh !

Moyibi koyiba nde esalisaka ye connaissance na Jésus na croix pe ekotisa ye lola
Po andimaka te Yesu aza mokonzi pe mobikisi

Mokolo yo okondima naza chéri nayo chouchou nayo motema nayo mabanzo nayo
Moto te akotuna yo mokanda
Na frontière ya motema
Okoleka nayo vert-vert
Vert-vert

Ah Claudia maman (Ah Claudia Sasou)
Boma kombo nanga na buku ya bakufi
Kotisango na buku ya bomoyi (Ah Claudia Sasou)

Nkosi aboyaka kolya Daniel po azwaka coup de fil ya Yavhé(Ah Claudia Sasou)
Nzambe nga pe na tour nanga téléphoner Claudia alongola makanisi ya kobwakisa (Ah Claudia Sasou)

Ndoki akoma carnivore ya moto
Nga herbivore nayo ya bolingo
Ata libenge…nazolya te!

Ata chauffeur liboso a démarré azelaka rece abeta mbumbu
Kasi yayo oweleli kokende olingi okota lola liboso ya nzambe  oh

Ah Claudia maman ah Ikea (Ah Claudia Sasou)
Mbisi afundi bambou
Bambou alobi eza ye te
Ba utiliza ye na ndobo eh (Ah Claudia Sasou)
Ndobo alobi eza ye te ba utiliza ye
Na pecheur na Maluku (Ah Claudia Sasou)
Pécheur alobi eza ye te ba utiliza ye
Na ba maman ya libongo (Ah Claudia Sasou)

Nazokufa naza mobesu ah maman ah !
Yaka ozongisela nga pema Claudia eh !
Oloueler nga catafalque avant ma mort
Oyelinga liwa na ascenseur mabe eh
Ata na mboka ya baweyi bakoboya nga
Puisque tango nanga ekoki te, yo oboyi nga
Kuna pe na croix bakokoma date de naissance te
…. Ayebi te

Maman sala foin nalela
Claudia sala foin namiboma
Maman sala foin namikunda
Claudia sala foin nalela

Tongo oyo nga nalamukaka nga moko
Sikoyo Nakomi kozela
Kapita ebeta ngonga po nalamuka.
Une heure ebondela zéro heure
Apesa yo passage po namiongola na minyololo ya makanisi

Claudia apimela nga bolingo
Po amoni sango apimeli nga communion
Abanzi nga naza lucifer
Nzoka nakula te

Naza nanga mwana malongi
Naza nanga ……..bébé…
Naza nanga kotanga bible

Butu ekomi monguna eh
Butu ekomi monguna eh Piano eh
Na mboka ya ba bébé kolela ezalaka soni te
Nabwaki soyi (Nabondela chéri nangay eh) nabwaki soni (Nabondela D C Sassou Nguesso)
Nabwaki soni (Nabondela Fidèle Emeraude
Nabwaki soni (Nabondela Claudia Sasou Nguesso)
Nabwaki soni

Eza yo eza nga te chéri omoni makambo osali
Eza yo eza nga te chéri omoni makambo osali

Po Yesu akufela ba kristu
Nga nakufeli bolingo

Eza yo eza nga te chéri omoni makambo osali

Tombeau nanga ekozanga croix
Mokolo bakosala rencensement na lilita
Bakosauter nga !

Claudia ! Claudia ! Claudia !
Kokunda te chéri stopper pawu parfois nakosekwa
Kokende te bébé zela nanu parfois nakosutuka

Eza yo eza nga te chéri omoni makambo osali
Eza yo eza nga te chéri omoni makambo osali

Nazokufa naza mobesu ah maman ah !
Yaka ozongisela nga pema Claudia eh !
Oloueler nga catafalque avant ma mort
Oyelinga liwa na ascenseur mabe eh !
Ata na mboka ya baweyi bakoboya nga
Puisque tango nanga ekoki te, yo oboyi nga
Kuna pe na croix bakokoma date de naissance te
….
…ayebi te

Kitoko, amen ! Kotoko makasi
Avec tout le respect je salue papa Otshombe… Sisi !

Claudia alingi nakatisa ngambo eh
Claudia alingi na changer nationalité
Soki naleli na Beach makelele ekokoma Brazza
Claudia yoka mawa desserer ba vices
Claudia yoka mawa libérer …
Claudia alingi nayembela ye
Nzembo moko ya sœur en Christ,
Claudia alingi nayembela ye
Nzembo ya Marie Misamu
Yesu oyo eh Ngonga ya réveil nanga ekobeta mokolo nini ?
Pe livre ya vie nanga ekomi na page nini ?

Claudia eh Claudia eh
Kodeko Mbuyi papa na Presley na…
Claudia Sasou
Mwana ya papa ndenges
Claudia Sasou oza kitoko
Nalela ndenge nini ?

Ya Michel Kabeya oza wapi
Bafingi nga epayi ya ba jaloux
Ya Constant Omari l’homme moderne
Vieux Gold Wemani yaya na Silva Gwema

Nani akoplaider cause nangayi ?
Maitre Dorothée yaka koplaider
Soki na médecine nabenga Docteur Emile Depria
Na Docteur Dieudonné …

Mozizo et compagnie
Botuna nga ndenge nini ? Eh na ndenge nini ?
Papa chéri …ya Coco !
Yavhé Yavhé mwana papa Yavhé
Soki naleli na Kin makelele ekokoma katanga eh Micheline Mudiayi …
José Kongolo mibeko laloi
Patty Bokanga oza wapi eh
Chantal Lwemba naleli
Aie eh ! Aie eh !

 

Watch Video

About Claudia

Album : Claudia (Album)
Release Year : 0
Added By : Theodor Bellash
Published : Dec 12 , 2017

More JB MPIANA Lyrics

JB MPIANA
JB MPIANA
JB MPIANA

Comments ( 0 )

No Comment yet



About AfrikaLyrics

Afrika Lyrics is the most diverse collection of African song lyrics and translations. Afrika Lyrics provides music lyrics from over 30 African countries and lyrics translations from over 10 African Languages into English and French

Follow Afrika Lyrics

© 2024, We Tell Africa Group Sarl