Loyembo Ya Mitema Lyrics by MIKE KALAMBAY


To pusani liboso nayo
To memi mbeka ya masanjoli
Yamba loyembo ya ba bulami
To bonjeli yo nzambe na bomoyi
Kiti na yo eza ya seko
Mokonzi nayo ya libela
Ozali nzambe tozo yembela
Kombo na yo Emmanuel

To kumambeli yo mobikisi
Mokeli ya likolo se
Moboko esimbi kondima
Ya ba santu eza yo Yesu
To kumambeli yo mobikisi
Mokeli ya likolo se
Moboko esimbi kondima
Ya ba santu eza yo Yesu

Bipayi yo ofandi yamba
Loyembo ya mitema
Maboko totomboli likolo
Hosanna kembo nayo

Na ekulusu makila etangi
Mokonzi yesu amipesi mbeka
Elemba ya pe lelo epasuki
Tozui bosombi liboso na yawhé
(na yango)
Sango malamu ekomeli biso
Tongo tongo masiya asekwi
Aza lisusu na lilita te  
(Alléluia… Il est vivant… Jésus)
Alongi liwa aza na bomoyi

Lilita etikali polele
Masiya yesu asekwi
Oyo nionso ya ngai ekufaki
Esekwi elongo naye
Lilita etikali polele
Masiya yesu asekwi
Oyo nionso ya ngai ekufaki
Esekwi elongo naye

Bipayi ofandi yamba
Loyembo ya mitema
Maboko totomboli likolo
Hosanna kembo nayo...(Alleluia…)

Mobikisi ya mabota
Ya mokili to belemi
To sopi mitema
Na biso liboso na yo

To kumambeli yo mobikisi
Mokeli ya likolo se
Moboko esimbi kondima
Ya ba santu eza yo yesu
Lilita etikali polele
Masiya yesu asekwi
Oyo nionso ya ngai ekufaki
Esekwi elongo naye

Bipayi yo ofandi yamba
Loyembo ya mitema
Maboko totomboli likolo
(Hosanna..) Hosanna kembo nayo

 

Watch Video

About Loyembo Ya Mitema

Album : Kumama (Album)
Release Year : 2018
Added By : Afrika Lyrics
Published : Jun 07 , 2018

More MIKE KALAMBAY Lyrics

MIKE KALAMBAY
MIKE KALAMBAY
MIKE KALAMBAY
MIKE KALAMBAY

Comments ( 1 )

.
Becky 2019-08-03 01:21:24

Please translate the song to English for me please



About AfrikaLyrics

Afrika Lyrics is the most diverse collection of African song lyrics and translations. Afrika Lyrics provides music lyrics from over 30 African countries and lyrics translations from over 10 African Languages into English and French

Follow Afrika Lyrics

© 2024, We Tell Africa Group Sarl