MICHEL BAKENDA Rond-Point Ya Bolamu cover image

Paroles de Rond-Point Ya Bolamu

Paroles de Rond-Point Ya Bolamu Par MICHEL BAKENDA


Michel Bakenda _ 
Bolingo na ngai 
Bolingo na ngai Yahwe na ngai
Bolingo na ngai 
Bolingo na ngai Yahwe na ngai

Ekuke ya lola
Ekuke ya lola Yesu ya bomoyi
Ekuke ya lola
Ekuke ya lola Yesu ya bomoyi

Osilisela ngai 
Ba ngambo na botama na kuta nase na moyi
Ngolu nayo ee
Osilisi yango Yawhe na ngai
Osilisela ngai 
Ba ngambo na milukela nga moko na lisumu na ngai ee
Na mawa nayo ee
Osilisi yango Yahwe

Na bengaka Yesu
Garde du cœur na ngai
Obatelaka motema na ngai
Na kotukama pe ba chocs ya mokili Papa na ngai

Bolingo na ngai, Bolingo na ngai yeye
Bolingo na ngai, Bolingo na ngai yeye

Nzambe ya koyemba
Nzambe ya koyemba Yahwe na ngai
Nzambe ya koyemba
Nzambe ya koyemba Yahwe na ngai

Mokili ba kendaka matanga pona kotika ya bango
Kasi Yesu mwana Nzambe akendaka pona kozua baye ya ye Yesu na ngai
Nzambe na bomoyi 
Nzambe na bomoyi Yahwe na ngai
Nzambe na bomoyi
Nzambe na bomoyi Yahwe

Ba cicatrices ya motema
Okawisa yango ee Yahwe na ngai
O penser motema otiki nga na nzembo ya bolingo
Nakomaki lokola
Rond-point ya sonie e ngai oyo
Kasi lelo oyo 
Okomisi nga rond-point ya bolamu nayo  
Otongela Jonas ndako na libumu na mbisi Papa ee
Bisika ya kufa epesa bomoyi po yo ozalaki na kati Papa na ngai

Nzambe na bomoyi
Nzambe na bomoyi Yahwe na ngai
Nzambe na bomoyi, Nzambe na bomoyi

Kumama Yahwe oo oo
Kumama Yahwe ee ee e
Kumama Yahwe oo oo
Kumama Yahwe ee ee e

Yesu kumama olongoli nga soni
Kumama olongoli nga soni
Kumama osali bolamu
Kumama osali bolamu

Yesu kumama Nzambe na bomoyi
Kumama Nzambe na bomoyi
Yesu kumama chance ya suka 
Kumama chance ya suka 
Yesu akumama kombo ya kotanga
Kumama kombo ya kotanga

Kumama Yahwe ee
Kumama Yahwe ee ee e
Kumama Yahwe ee ee ee e e
Kumama Yahwe ee ee e

Kumama Nzambe na bomoyi
Kumama Nzambe na bomoyi
Yesu kumama olongoli nga soni nanga
Kumama olongoli nga soni

Kumama kasi Papa osali bolamu
Kumama osali bolamu

Nzembo ya bomwana na ngai 
Ya basoni balongola ee
Ewuti mosika nakoki te 
Naye na nzembo nanga (Ngai ye oyo naye)

Ngai ye oyo naye, Ngai ye oyo naye
Ngai ye oyo naye, Ngai ye oyo naye

Na koka’ovanda kimya te oo (Ngai ye oyo naye)
Silence eza effacé (Ngai ye oyo naye) 
Liboso ya bolamu nayo (Ngai ye oyo naye)
Na memi ba nzembo nanga (Ngai ye oyo naye)
Nzembo ya ba bancs ya Silo (Ngai ye oyo naye)
Nzembo ya ba mayi ya Ndobo (Ngai ye oyo naye)
Nzembo ya bana oyo opesa (Ngai ye oyo naye)

Ngai ye oyo naye
Ngai ye oyo naye
Il est vrai que je souffre (Ngai ye oyo naye)
Mais na résoudre na motema na nga (Ngai ye oyo naye)  
Que na yemba yo nanu ee (Ngai ye oyo naye)
Nzembo ya motema na ngai (Ngai ye oyo naye)

Ngai ye oyo naye
Ngai ye oyo naye

Na kozanga Samuel (Ngai ye oyo naye)
Na bungi présence na yo te oo (Ngai ye oyo naye)

Ngai ye oyo naye
Ngai ye oyo naye
Na Sali duo (Ngai ye oyo naye)
Ya makambo na zuwi na oyo na zuwi te oo (Ngai ye oyo naye)
Ebimisi nzembo (Ngai ye oyo naye)
Duo ya mayi ya miso ya soni (Ngai ye oyo naye)
Na oyo ya bolamu (Ngai ye oyo naye)
Bolamu nde e prédominé oo (Ngai ye oyo naye)

Ngai ye oyo naye
Ngai ye oyo naye
Papa tala nga bien na motema (Ngai ye oyo naye )  
Naza na nzembo na kati (Ngai ye oyo naye)
Na ndimi que bolamu n’o (Ngai ye oyo naye)
Na vie na ngai eko zua le dessus (Ngai ye oyo naye)
Nzambe ya bomwana ee (Ngai ye oyo naye)

Nzembo ya motema
Ngai ye oyo naye
Elikya ya motema ee
Nzambe ya kotosa ee
Molongoli sonie ee
Nzambe ya bomwana ee

Ecouter

A Propos de "Rond-Point Ya Bolamu"

Album : Rond-Point Ya Bolamu (Single)
Année de Sortie : 2019
Ajouté par : J.Mabongo.7
Published : Nov 05 , 2019

Plus de Lyrics de MICHEL BAKENDA

MICHEL BAKENDA
MICHEL BAKENDA
MICHEL BAKENDA
MICHEL BAKENDA

Commentaires ( 0 )

Aucun commentaire pour l'instant



A propos de AfrikaLyrics

Afrika Lyrics est la plus large collection de paroles de chansons et de traductions d’Afrique. Afrika Lyrics fournit les paroles des musiques de plus de 30 pays africains et des traductions de lyrics de plus de 10 langues africaines en français et en anglais.

Suivre Afrika Lyrics

© 2024, We Tell Africa Group Sarl