HENRI PAPA MULAJA Bolingo Ya Nzambe cover image

Paroles de Bolingo Ya Nzambe

Paroles de Bolingo Ya Nzambe Par HENRI PAPA MULAJA


Na molongo ya bato ba zua ngolu na nzambe
Na koki wangana te naza na kati
Na tomboli maboko na ndimi na motema
Mobinba na ngai awa ngolu na ngolu
Misala n’ekulusu ememeli nga bomoyi
Na mérit-aki te na makasi ya nzoto Yesu yaka lisusu
Konza na motem’oyo
Kiti ya bokonzi
Zbongi se an yo mosantu ya lola Yesu masiya

Soko osali te (eko salema te)
Soki osimbi te (eko salema te)
Bongo olobi te yaya (toko yoka nani)
Soki opesi te (toko zua epa ya nani)
Yesu soki osali te (eko salema te)
Soki osimbi te (eko salema te)
Bongo olobi te yaya (toko yoka nani)
Soki opesi te (toko zua epa ya nani)

Na molongo ya bato ba zua ngolu na nzambe
Na koki wangana te naza na kati
Na tomboli maboko na ndimi na motema
Mobinba na ngai awa ngolu na ngolu
Misala n’ekulusu ememeli nga bomoyi
Na mérit-aki te na makasi ya nzoto Yesu yaka lisusu
Konza na motem’oyo
Kiti oyo bokonzi
Ebongi se an yo mosantu ya lola Yesu na ngai

Soko osali te (eko salema te)
Soki osimbi te (eko simba te)
Soki olobi te (toko yoka nani)
Soki opesi te (toko zua epa ya nani)

Yango nazo bika na, bolingo ya nzambe
Nazo bika na bolingo ya nzambe
Nga nazo bika na (bolingo ya nzambe)
Ngayoyo nazo bika na na (bolingo ya nzambe)
Pema nazo pema eza na (bolingo ya nzambe)
Ebongo makasi ya nzoto  (bolingo ya nzambe)
Sekele ya esengo na nga (bolingo ya nzambe)
Sekele ya libota na nga  (bolingo ya nzambe)
Refrain ya loyembo na nga  (bolingo ya nzambe)
Résumé ya mateya na nga  (bolingo ya nzambe)
Mobimba na ngai awa eza  (bolingo ya nzambe)
Kotambola nazo tambola oyo (bolingo ya nzambe)
Ngai naso bika na (bolingo ya nzambe)
Nazo bika na (bolingo ya nzambe)
Pema nazo pema eza (bolingo ya nzambe)
Bongo makasi ya nzoto  (bolingo ya nzambe)
Nzembo na nga ya tango nionso (bolingo ya nzambe)
Sekele ya libota na nga (bolingo ya nzambe)
Basili ko kufa na leki na nini (bolingo ya nzambe)
Tika nga nayemba bolingo (bolingo ya nzambe)

Ngai nazo bika (bolingo ya nzambe)
Ngai awa nazo bika (bolingo ya nzambe)
Santé ya bana na nga (bolingo ya nzambe)
Diplôme te mayele ya campus te (bolingo ya nzambe)
Komona kotambola toyoka (bolingo ya nzambe)
Ba miracles kowuta na lola (bolingo ya nzambe)
Ngai nazo bika (bolingo ya nzambe)
Ngai nazo bika (bolingo ya nzambe)
Na lamuki na tongo nayembi bolingo (bolingo ya nzambe)
Midi ebeti nga yeyo nayembi bolingo (bolingo ya nzambe)
Na butu ba ko lala se na bolingo (bolingo ya nzambe)
Osali nga bolamu mingi (bolingo ya nzambe)
Mabe na sala basusu ba kufa nango (bolingo ya nzambe)
Obateli nga na futi yo nini (bolingo ya nzambe)

Tika na yemba nzembo motema
Na loba oza malamu po na ngai
Bolingo n-o etondi nga motema yaya
Nako seka baninga pona nini
Yango nako tiola baninga pona nini
Nionso na ngai Yesu na Yesu (Se yo Yesu)
Eza (se yo Yesu)
Moninga na nga ya tango nionso  (Se yo Yesu)
Ya baye bazanga baninga (Se yo Yesu)
Elikya ya baye ba simba moto (Se yo Yesu)

Okangolaka bato ya mitema mabe (Se yo Yesu)
Seyo mosantu ya lola (Se yo Yesu)
Zua kembo masanjoli yaya (Se yo Yesu)

Ecouter

A Propos de "Bolingo Ya Nzambe"

Album : Bolingo Ya Nzambe (Single)
Année de Sortie : 2020
Ajouté par : Farida
Published : Jul 09 , 2020

Plus de Lyrics de HENRI PAPA MULAJA

HENRI PAPA MULAJA
HENRI PAPA MULAJA
HENRI PAPA MULAJA
HENRI PAPA MULAJA

Commentaires ( 0 )

Aucun commentaire pour l'instant



A propos de AfrikaLyrics

Afrika Lyrics est la plus large collection de paroles de chansons et de traductions d’Afrique. Afrika Lyrics fournit les paroles des musiques de plus de 30 pays africains et des traductions de lyrics de plus de 10 langues africaines en français et en anglais.

Suivre Afrika Lyrics

© 2024, We Tell Africa Group Sarl