Paroles de Égérie Par CINDY LE COEUR


Elégance eeh

Hum ! ti bolingo ekomisi nga na Goma
Ti nayoki pe te pema
Po epa élégance azali na koma
Bolingo ya motema
Nakoti pe ba zamba
Na mati pe ba ngomba
Uuuuhhh.......

  Suka suka olobi nini élégance
Na ya aa to na continué kozela aa
 Suka suka olobi nini élégance
Na ya aa to na continué kozela yo

Namata ba ngomba
Nakota ba zamba
Nabanga te
Ngai awa butu ekoma se mikuse
Ngai awa pongi ekoma trois heures du temps
Bandoto ya monotonie, élégance ee
C’est elle que j’aime
Elégance eeh, c’est elle mon choix

Nzambe opesa baninga ba vocations
Bakoma ko prêché la bonne parole
   Elégance otindela nga ata na Whatsapp
Sourire nayo ya tongo ya lelo
Soki obosani tinda ata oyo ya pokwa eeh

Suka suka olobi nini bébé
Nayaaa to na continué kozela yo oo

Baninga Nzambe opesa ba vocations
Na trois heure du matin tango pongi ekimaka nga aa
Nakoma ko fouillé téléphone namona ata appel manqué
Soki tango mosusu élégance okomelinga mon whip
(mon choux) mon fruit de mer
Je t’aime
Elégance, C’est elle que j’aime
Elégance, mon choix éé

Mais ebandaki neti ndoto
Bolingo ya ngai n’élégance
Neti lisapo onge oyo ya Romeo na Juliette
Bolingo oyo mboka mobimba epesa longonya
Yabiso ebongaki neti linzanza na langi
Lelo etikali lisitoile
(Bolingo eboti mapapu)

Nga nako yebelaka mabala
Pona kozela Elégance
Mikolo eleki kutu basanza pe ba nvula
Yo ozongaka te nga awa liombe ebali nde nzoto
Souci nde bileyi bya nga ko banda moyi butu piii

Hum yo latisanga be bomwana pili ya bolingo
Lelo mokwiya ememi botutu okati ya nzoto
Nakoma kobanga na ya kokufa avant ee
Kaka pona etumbu ba bengi kombo bolingo
Yaka omona ndenge bolingo ezo sala génocide

Natindi pe ba messagers bazongi maboko pamba ee
Kombo n’ô etingami nga lolemu neti soyi ee
Diagnostique ya bokono bazui nga absence Elégance
Nga nakomi migrant
Na zangi terre d’asile

na leli leli ee
Elegance Elega
Woouwo oo
Mwana ma’Solange azali ya nga moko ngo oo
Wuuuouu uuu

Soki ozalaki mboka Elégance
Nalingaki ko changé nationalité
Nalingaki ko changé pe passeport
Nakoma na ngai Elégançais
Nakoma na ngai Elégançois
Et me soumettre à tes lois
Ça va de soit

Elégance kitoko ee
Elégance kitoko avec excédant
Ekomi ko sopana nzela nzela
Lokola loso na mutu ya porteur
Basi oyo baza na problème ya beauté
Ba lokota ba mipakola na nzoto
Bakoma belle belle belle belle

Elégance nzambe asalaki yo ee
Na l’heure oyo na paradis agitation
Pe makelele nyoso esilaki ee
Asalaki yo malembe malembe
Alati loupe neti ya ba diamantaire
Tango basalaka expertise ye ba diamant
Soucis naye obima parfaite
Lelo chooter moto nyoso aza convaincu
Perfection eza domaine privé ya Nzambe
Elégance oza produit ya perfection ya Nzambe

Ye ye ye
Ye ye ye ee
Baninga botika ngai na liya mbuma aya nzambe
Adan aliyaki simple pomme ya Eva
Po na paradizo Elégance azalaki te
A rata mangoustan
A rata sucre oyo ya mbila y’esobe
A rata maracuja aaaa
A rata mayi ya pondu ya mayi mayi
A rata muselu oyo ya dongo-dongo
A rata bizarrerie oyo ya pamplemousse
         
Ye ye ye
Ye ye ye ee
Otie conflit entre Gucci na Vuilton
Bazo welela yo ee
Ozala lingerie na bango
basala bénéfice
ba concurrence oyo ya Apple na Google

Elégance
Ye ye ye
Ye ye ye ee
Elégance okomisanga ata bureau n’ô
Otia confidence oyo asimbelaka yo sac
Maman au secoure
Elégance soki atali nga
Nazongaka mwana moke yo bamemaka na l’école
Na ba nunu na deux tartine ya pain au chocolat
Na cartable

Ye ye ye
Ye ye ye ee
Elégance Elega Miandawu
    Mwana maman Solange Bolevo Rose Fichard
Ngai awa na motema l’amour est toujours en cours
Ton amour Elégance dans mon cœur pour toujours
Ton amour Elégance il n’y aura jamais de dernier jour
Pour ton amour Elégance je ferais toujours demi-tour

Depuis y’okenda Elégance nakoma na veste ya jardinier
Na pesi kombo na yo na chaque fleure ya jardin
Ba roses ba pétunières ba hercudée ba jasmin

Ye ye ye
Ye ye ye ee
Yo otikaka kosilika je t’aime
Yo otikaka ko limua limua je t’aime ko
Yo otikaka ko ignoré nga je t’aime
Yo otika ko lelisa nga je t’aime
Yo otikaka ko trompé nga je t’aime
Yo otika ko pesa mawa je t’aime

 

Ecouter

A Propos de "Égérie"

Album : Égérie (Single)
Année de Sortie : 2019
Ajouté par : J. Mabongo-7
Published : Oct 18 , 2019

Plus de Lyrics de CINDY LE COEUR

Commentaires ( 2 )

.
Muhdeen 2019-12-14 21:36:37

Beautiful and sensation music.....

.
Muhdeen 2019-12-14 21:38:14

Beautiful and sensation music.....



A propos de AfrikaLyrics

Afrika Lyrics est la plus large collection de paroles de chansons et de traductions d’Afrique. Afrika Lyrics fournit les paroles des musiques de plus de 30 pays africains et des traductions de lyrics de plus de 10 langues africaines en français et en anglais.

Suivre Afrika Lyrics

© 2024, We Tell Africa Group Sarl