Losambo Lyrics by VAN WALESA


Anna amataki na Silo
Koluka elongi nayo
Posa ya motema aa
Opesa ye Samuele
Mwasi oyo abandaki ko tanga makila
Asimbaki elamba nayo
Ya Yesu ee
Azuaki nde lobiko oo o
Ngai oyo nazo bela
Na kangami na mbeto hôpital oo
Losambo na ngai yeye
Bikisa ngai yeye Yaya
Aza na prison ya ba blocages
Ya échec pe humiliation
Ya réclamation ya libota
Yaya kangola ngai
Na talelaki mokili ii
Nazui litomba te
Bato na tielaki motema oo
Bango nde baseki nga
Bango nde bafingi nga
Ba bwaka nga lokola elamba ya kala
Natikali kaka nayo Yesu
Appui na ngai ee ya suka

Solution na ngai ee ee eee
Cure na ngai ee ee
Appui na ngai e e ee e
Sembola aaa Yesu loboko nayo
Salelanga oyo mokili ekoki ko salela nga te
Sembola aaa Yesu loboko nayo
Komisa nga bipayi mokili eloba nako koma te ee

Eloba na ko koma te ee ee
Yaya ee ee
Yaka y’olendisa aa
Motem’oyo yanga elembi ee
Yaka y’okawisa
Ba pota oyo yanga Shilo
Yaka y’opamela
Mbonge esila
Yaka y’okawusa pota ya motema
Yaka y’okomisa ngai molongi ee
Mbal’oyo na boyi kolela ee
Naboyi ko kweya ee
Nalingi lelo na koma
Oyo ya ngai lisitoile
Bato ba ganga aa
Que yo obimisa nga molongi
Ya bitumba na ngai
Pe ba ndimela yo Mokonzi Yesu ee e

Sembola aaa loboko nayo
Salelanga oyo mokili ekoki ko salela nga te
Sembola aaa loboko nayo
Pesa ngai oyo mokili ekoki ko pesa ngai te
Sembola aaa loboko nayo
Salelanga oyo mokili ekoki ko salela nga te
Sembola aaa loboko nayo
Komisa nga bipayi mokili eloba nako koma te
Yaya na ngai
Haaa haaa haaa ha
Bisika balobi nako koma te ee
Haaa haaa haaa ha
Yesu komisa ngai Yesu
Haaa haaa haaa ha
Confondre makanisi ya banguna na ngai
Haaa haaa haaa ha

« C’est ne plus le temps de pleurer
Le temps de se lamenté est déjà passé
Oyo ekomi tangoya yo mwana Nzambe
Nzambe asala eloko moko na vie nayo
Ndenge Mose atombolaki nyoka motako na désert
Ndenge ngai pe naz’oya ko tombola Jésus-Christ na vie nayo
Soki otali ye pasi nayo eza nase ya kombo naye
Soki otaleli ye ba condamnations ya famille
To kolela nayo eza na esika te »

Nayebi y’oko sala ee
Nayebi yonde sukisa

Nano obanda te likambo esukela na nzela
Nayebi y’oko sala ee
Nayebi yonde sukisa
Nano obanda te likambo esukela na nzela

Sembola aaa loboko nayo
Sembola aaa loboko nayo
Sembola aaa loboko nayo
Sembola aaa loboko nayo
Sembola aaa loboko nayo
Sembola aaa loboko nayo
Sembola aaa loboko nayo
Sembola Yesu ee
Nabomoyi na ngai ee
Yaka y’osimba ngai iii
Yaka y’otombola ngai ee ee ee
Yaka y’omatisa ngai eei
Nalembi iii nalembi vie ya pasi oyo
Vie ya minyoko oyo
Nalingi nga pe na tatola Bonzambe nayo na miso ya bato
Yaka Yesu ee
Yaka Yaya na ngai

Watch Video

About Losambo

Album : Losambo (Single)
Release Year : 2019
Added By : J.Mabongo.7
Published : Nov 08 , 2019

More VAN WALESA Lyrics

VAN WALESA
VAN WALESA

Comments ( 0 )

No Comment yet



About AfrikaLyrics

Afrika Lyrics is the most diverse collection of African song lyrics and translations. Afrika Lyrics provides music lyrics from over 30 African countries and lyrics translations from over 10 African Languages into English and French

Follow Afrika Lyrics

© 2024, We Tell Africa Group Sarl