Nzambe Na Bomoyi Lyrics
Nzambe Na Bomoyi Lyrics by RIVELI ADMARAEL' SHAD
ALLÉLUIA
Apesaka esengo na ba oyo ba lelo
Azongisaka kimya, na motema oyo ezoki
Abongolaka nionso, yesù oyo alonga liwa
Soki bato basuki, Yesu nanga asuki té
Ebandeli Ya nionso, se Yesu nzambe nanga
Mobateli Ya bana bitiké, Yesu Masiya eh
Apesaka bomoyi na ba oyo ba kufa, Yesu nanga yé
(NZAMBE NA BOMOYI)
(NZAMBE NA BOMOYI)
(YAYA EH EH EH )
Ata banguna nanga lelo ba Jingeli nga
Ata bato Ya mokili lelo ba kangi motema
Ngayi na kobanga te, Yesu akokisa nionso
Azali na bomoyi yaya oyo asimbanga Yesu nanga yé
Ata mokili to, ba boyi ba bwakisi yo
Ata ba mbongo to mosala nde ezangiyo
Solo kobangaté po NZAMBE oyo asala elaka
Alalaka té, animbaka té, azali na BOMOYI
A la la Kate animbakaté azali na BOMOYI, Yesu eh
(NZAMBE NA BOMOYI)
(NZAMBE NA BOMOYI)
(YAYA EH EH EH)
Yo oyo oza na pasi, kotangisa mpinsoli té
Ata n'etuluku Ya bato, belela akoyoka
Mobateli na Biso azali na BOMOYI
Animbakate ho ! Alalakaté hé
Asekwuisa Lazard na nkunda
Sima mikolo mineyi, Belela akoyoka,
Pe akoyanola yo, akongengisa pôlé nayé
Na nionso okosala Yaya eh
NZAMBE oyo akongola Israël, azali na BOMOYI
NZAMBE amonisa Barthimé azali na BOMOYI
Animbaka té alala Kate, akongengisa pole nayé na nionso okosala
[CHŒUR]
Nzambe na bomoyi kombo naye Yesu masiya
Moninga malamu kombo naye mwana na nzambe
Liloba ya suka ebimaka, na monoko naye
kombo naye ezali elonga ya ba santu
Nzambe na bomoyi kombo naye Yesu masiya
Nzambe na bomoyi kombo naye Yesu masiya
Longola loboko na litama
Longola souci na motema
Pardon kolela te, kobungisa mpe kondima te
kozonga sima te simba yesu makasi
N'esika obanza mpasi, tala misala na Yesu
kuna n'ekulusu, wana okolonga
kuna n'ekulu wana okolonga
Nzambe akangola Israel azali na bomoyi
Nzambe oyo asalaka nzela n'ebale azali na bomoyi
kangama naye asalaka, ako ngengisa pole na ye na nionso okosala
Nzambe na bomoyi kombo naye Yesu masiya
Moninga malamu kombo naye mwana na nzambe
Liloba ya suka ebimaka, na monoko naye
Kombo naye ezali elonga ya ba santu
Nzambe na bomoyi kombo naye Yesu masiya
Nzambe na bomoyi kombo naye Yesu masiya
Posa nanga ezali ete yo okangama na yesu
Parce que ba oyo ba talela ye ba zua déception jamais
Tongo Barthimé abelelaki Yesu, ayanolaki ye mbala moko
Pote ye atikaka te ba oyo ba belelaka ye
Soki okangami naye ekozala malamu
Soki okongami naye okolonga; kanga na Yesu aza na bomoyi
ALLÉLUIA
Nzambe na bomoyi kombo naye Yesu masiya
Nzambe na bomoyi kombo naye Yesu masiya
Watch Video
About Nzambe Na Bomoyi
More RIVELI ADMARAEL' SHAD Lyrics
Comments ( 0 )
No Comment yet
You May also Like
Get Afrika Lyrics Mobile App
About AfrikaLyrics
Follow Afrika Lyrics
© 2025, We Tell Africa Group Sarl