Ngolu Nayo Lyrics by MOÏSE MBIYE


[Moise Mbiye]
Nabosani te oh!
Faible commencement na ngayi
Bato ebelé ba pesaki nga chance te

[Mike Kalambay]
Hum! Nabosani te oh!
Banguna bajingaki ngayi
Bitumba esila eh!
Obimisa nga molongi
Nabosani te oh!
Bisika nga na kueyaki
Loboko nayo eh!
Nde etelemisaki nga

[REFRAIN]
Nionso wana ngolu nayo
Ngolu nayo eh! Eh!
Ngolu nayo likolo na ngayi
Ngolu nayo
Ngolu nayo eh! Eh!
Ngolu nayo likolo na nga

[Moise Mbiye]
Natali na Bible
Na misala ya ba ntoma
Namoni petelo moto ya nguya mingi
Nazonga mua sima, awanganaki yesu
Nabolembu na nga eh!
Otalisa bokasi nayo
Loboko nayo eh!
Elolgola nga na ngiziiiii

[REFRAIN]
Nionso wana ngolu nayo
Ngolu nayo eh! Eh!
Ngolu nayo likolo na ngayi
Ngolu nayo
Ngolu nayo eh! Eh!
Ngolu nayo likolo na nga
Ngolu nayo
Ngolu nayo eh! Eh!
Ngolu nayo likolo na nga

Ah! Bipayi olokota nga nkolo yesu
Motema na nga moko temoin
Lolengué nayo yako sala makambo
Ebelisa banguna mitu
Comment expliquer ?
Malédiction esili nguya eh!
Le dernier ya lobi
Akoma lelo le premier ooooh !
Comment expliquer ?
Nakoma moninga ya nzambe eh!
Bitumba ya vie na nga
Obimisa ngayi champion eh!
Comment expliquer ?
Nalibota ba lakela mabé eh!
Nabimisi moto
Nakomi Joseph ya famille na nga

Ah! Bipayi olokota nga nkolo yesu
Motema na nga moko temoin
Lolengué nayo yako sala makambo
Ebalola banguna mitu

Ngolu cacule ya nzambe
Ngolu makambo ya lola
Nde boye basantu to ganga
Ozwa ngayi pembeni nayo
Obenga nga mosali nayo
Nionso ya ngayi eza ngolu
Yeee! Ngolu eh!
Botika na yemba ngolu
Ebimisa ngayi na lanonima
Ebimisa ngayi na lodeba

Yeeeeyi yemba ngolu eh! Eh!
Yemba ngolu ooooh
Yemba ngolu eeeeh eh! Yaya
Resumé ya ekulusu eh!
Na bomoyi na ngayi eh!
Otalisa bolingi nayo eeeh! Yaya na ngayi
Ozalaki très patient na ngayi
Otikelaki nga tango eh!
Na sosola maloba nayo! Yaya eh!
Nasengi yo nini eh!
Nga naluki nini eh!
Mikolo nionso yaya eh!
Yaya na ngayi eh!
Ba maman baluki nini eh!
Etudiant asengi nini eh!
Na Congo to senga nini eh! Papa eh!

Ngolu nayo
Ngolu nayo eh! Eh!
Ngolu nayo likolo na nga

Watch Video

About Ngolu Nayo

Album : CHAMPION (Single)
Release Year : 2014
Added By : Afrika Lyrics
Published : Aug 09 , 2018

More MOÏSE MBIYE Lyrics

MOÏSE MBIYE
MOÏSE MBIYE
MOÏSE MBIYE
MOÏSE MBIYE

Comments ( 0 )

No Comment yet



About AfrikaLyrics

Afrika Lyrics is the most diverse collection of African song lyrics and translations. Afrika Lyrics provides music lyrics from over 30 African countries and lyrics translations from over 10 African Languages into English and French

Follow Afrika Lyrics

© 2024, We Tell Africa Group Sarl