MC-COOL ANGUZO Motivation cover image

Motivation Lyrics

Motivation Lyrics by MC-COOL ANGUZO


J'ai encore frappé yeah
Mc-cool
Anguzo yeah
Chanty prod

Na ebandeli nako loba trop te mpo na yebi te so place nanga eza wapi
Na motema yako encourager nga to yako yina, ba fans boloba nanu
Na bandaki na molo-molo, so otali bien ma ndule est très bien définit
Ba inspirations yako motiver bino eza ebele donc eza infini
Ndulemane faut opesa posa, inspiration esila te avant travail ekemba
Musique eza yayo eza compétition te, mbangu pema lobi ekosimba
Na sepelaka trop naba jeunes balukaka, yaya koluka eza code
Après avoir ko déverrouiller porte ya souffrance okoloba thank you my God
Baye bakuta na mesa dépense tina te chaque jour il faut ba bima
Kolanda bango te, ko yina bango te, tango mosusu eza komesana
Ba timbela déjà que ata so tobebisi lelo lobi mbongo ekobima
Dis-toi que nayaki na mokili kotika mutu te, un jour faut mpe nabima
Zala motivé, ko passer journée na jeu ya dame te
Heure moko esengaka mais heure nyoso te
Galère ekosimb'o ata muke te, so opassaka journée nase ya nzete te
Vie nyoso yang'oyo brouillon eza te, on n'sait jamais so lobi ekozala te
So obebisi lelo na futur kolela te tangu mutu yako sung'o akozala te
Musapi n'o ya munene eleka oya suka na mulayi te keba oko bina faux
Vie eko tengama, oko risquer obayeler avant okokisa posa n'o
Obotami pauvre wana faute te, bats-toi kasi pour qu'un jour ozala bien
So pe okufi bongo lisumu, zakomba atiya tout na mokili zwa mayele
Timbela nzete ya mbongo ezalaka te, ekosimba te s'o mayele eza te
Ata ozwi lelo so oyebi ko gérer te, je t'assure que okosala eloko te
Richesse eza neti moto ya allumette, so obateli te yo moko okolela
Imaginer tige ya allumette déjà eziki so meki'opelisa ekosimba?
Eza pe ndenge moko pona succès, emata mais jamais ekita nase
Moto soki obeteli bien ata mbula enoki jamais ekokita nase
Depuis tobotama tomona pe trop, to copier ndambu, ya mabe'eleki trop
Bolambu epolaka te tant que esengi kosunga kobukana te sunga pe
Bilengi ekomaka pe bololo, mokili tour à tour yoka lisolo
Mingi ba swana, mingi basunga te, mingi babomba te, lelo bazangi
Nyoso epesamelaka ko kamwa te, soki epesameli yo te ko forcer te
Siama mituna nini nakoki'o sala vraiment po lobi nazala mandiant te
Ndeko mwasi ko paniquer mingi te, libala soki eza yayo ekokim'o te
Omona wapi ndeke akimi atiki mapapu naye, yayo akotik'o te
Yanke ko tiya mwana batu jouet te, po'o comprendre mutu mitiya na place naye
Bae zwa mayele poche ne'eza banque te, tika ye asala ya makoki naye
Pona nga boswana nabino te, nalobi nangai kaka vérité
Allons-y continuons nzela nabiso totika bango bazali ba amoureux
But eza ka'a moko déjà boyebi
Mc-cool Anguzo aye ko motiver
Kiekiekie mingi baseka bango, mais nasuka bango baseka trop
Revenons à notre sujet ya mindule, Rd Congo mboka bénit monde eyebi
Ba jeunes talents batondi, mais ba œuvres nabiso sur place bazo kiffer te
Oh Kisangani ba musiciens baza te, qui t'a menti que awa ndule eza te
D'après tout biso tout to'a ba congolais, ko tala milieu te tala nde travail
Ba jeunes talents bazo dûr nakati ya vie ya pasi pe boyebi yango
Euh nasi nalobi pe mingi, toleka sikoyo na étape ya refrain

Yeah Motivé, naza motivé (motivé)
Motivé eh zala motivé (motivé)
Motivé naza motivé, na ndule ya Mc-cool zala motivé
Yeah Motivé, naza motivé (motivé)
Motivé eh zala motivé (motivé)
Motivé naza motivé, na ndule ya Mc-cool zala motivé

Dieumerci Kayumba Garçon stylé
Djedje, Champion Nindja
Judo Club Boa, Kamikaze, Okapi
Chrispack Wesh, Seam, Kodokan
Cobra, Ahh Maître Milikipito
Champion Dido Cœur De Lio

Watch Video

About Motivation

Album : Motivation (Single)
Release Year : 2022
Added By : Mc-cool
Published : Oct 06 , 2022

More MC-COOL ANGUZO Lyrics

MC-COOL ANGUZO
MC-COOL ANGUZO
MC-COOL ANGUZO

Comments ( 0 )

No Comment yet



About AfrikaLyrics

Afrika Lyrics is the most diverse collection of African song lyrics and translations. Afrika Lyrics provides music lyrics from over 30 African countries and lyrics translations from over 10 African Languages into English and French

Follow Afrika Lyrics

© 2024, We Tell Africa Group Sarl